Similar Songs
Credits
PERFORMING ARTISTS
Adorons L'éternel
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Franck Gael Moloto
Songwriter
Lyrics
Ata mokili etelemi
Eboi kokend'ekomi na suka
Nayebi Nkol'ozali
Ebombamelo na ngai mosantu
Mpo'ete nyonso ezali
Esalisami kaka na yo eh
Mokeli na kokamwa
Nyonso esimbami na yo
Nkolo! elonga na ngai eza na yo eh
Yesu! na yo nde nabengi Nzambe tata
Yonde! mobateli ba mpate ya Nzambe
Yesu! na yonde nabengami mosantu
Nkolo! lobiko ya baye bakoganga
Yesu! na yonde na bengami mokitani
Ya Nzambe na bomoi
Mosungi na ngai azali kosala nabanga
Nini oh oh!
Ata makasi esili ngai
Mpo'ete nzela etondi minyoko
Nkolo y'okopesa ngai
Loboko ngai nasimba tokende
Mosala oy'obandi
0 Komisaka kino na suka
Mokonzi na ngai azali
Na nguya ya kokomisa ngai
Nkolo atelemi nde na nkembo
Bikelamu binso bifukama
Massiya na ngai aza na bomoi
Ngai na ningana tina nini
Ata mabele efunguani bipai
Natelemi nabanga te oh
Oyo asimbi aza makasi
Kombo na ye Yesu Kristu
Ate mokili eboi kondima
Oyo alobi nde yango oh ekosalema mpo na ngai
Mosungi na ngai azali kosala na banga nini oh.
Ah ah Alléluia, ô Alléluia
Yesu aza malamu! Yesu aza na bomoi
Ata mitungisi elati mposo; Ata liwa elati nzoto; ata
Somo ezui maloba
Ekotelema liboso na kombo na Yesu te.
Ata satana na mapinga naye nyoso baye,
Bakozonga sima.
Mpo Yesu akanga nguya ya lifelo. soki otelemi kati na kombo na Yesu
A ta ngomba ya mikakatano etelemi, okoleka.
Soki omoni lokola moyen ya koleka eza te ndima kaka,
Okokoma, soki mpe bitumba ya bomoi na yo eleki moto, fungola ekuke ya kimya, mpe.fanda na kiti
Ya elikya, okolonga. Alléluia!
Alléluia!
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine
Lyrics powered by www.musixmatch.com