Lyrics

Maya Oh Maya mon amour Yoka mongongo mozali kobelela yo na kati ya butu Yoka lokole na suka ya mboka Ozali moto, kanisa Nakomi lokola litanga ya mbula pembeni ya ebale, Maya Kasi, ata butu eyindi makasi, Tongo ekosukaka se etana Nazali responsable na yo Yo nde ozali coupable ya misère na ngai Maya, ngai nakangi maboko na moto, Makambo matondi ngai motema Nakomi kotanga mikolo na misapi, Nakomi nde kobanga Mbala ya liboso tosalaki matata, Ezalaki kaka boye Soki nafungolaki miso te Olingaki oboya ngai Maya ngai natii loboko na litama Makambo matondi ngai motema Nakomi kotanga basanza na misapi Nakomi nde kobanga Mbala liboso okendeki Isiro ezalaki kaka boye Soki nafutaki tike te nalanda yo Olingaki ozonga te Maya, namiswi lolemo, Nazoki makila masangani na soi ya monoko, Mosusu nabwaka mosusu namela Nakomi na badoute Mbala eleki osengaki divorce ebandaki kaka boye Soki nalandaki lolendo na yo, Ezalaki se tokabwana Oh, Kisasa, Kisasa mboka te Moto azali kokufa, bango bazali koseka Moto nakei kosenga conseil Akomi nde koseka pe kotongoko ngai na pembeni Likambo ya kokamwa Zuzi oyo amesana koasambisa matata ya ngai na yo maya Nzoka nde alulaka yo lisusu Mokili compliqué O mama namipikoli suki na moto Sango nayoki naboyi nde kondima Nazangi confiance na matoi na ngai moko Nzoto ekomi somo somo Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda Boni yo kanda lokola liwa Osali zoba lokola ndoki O mama namipikoli suki na moto Sango nayoki naboyi nde kondima Nazangi confiance na matoi na ngai moko Nzoto ekomi somo somo Moto aliaka na ngai sani moko lelo oyo akoma mbanda Boni yo kanda lokola liwa, Osali zoba lokola ndoki yeyeh Maya, nakomi lokola moto baswi na nyoka Nakomi kobanga ata moselekete ya pamba Pasi ya moninga Bakoyokaka na matoi kaka lokola lisolo Kasi ekosala yo na motema lokola ye te Bakabaka, badefisaka, basimbisaka, Kaka se mbongo Maya Kasi Bokono to pasi ya bolingo, Héritier azalaka te Maladi ya bolingo, Dokotolo azalaka te Ekosilaka se na moto oyo apesaki yo yango Bakendeke bongo te ata ko asiliki Abungaka nzela ya ndako te Kasi ekomi lelo ngai naluka, Toyokanaka bongo te ooh Nalingaka toswana, Po tomesana, Nyonso abiance ya libala Bitumba, bazuwa na miso ya bato Namesana kobondela yo O nzambe Nzambe, nazwi nde etumbu Nakangami na motambo Lisumu nini nasali Po nameriter etumbu ya motindo oyo Nameki pe mbala mingi po naboya ye Kasi nakokokaka te Epai ko bolingo Epai ngai pe ko moto ya maladi Tokosuka boni? Mokanda kutu nalingaka natindela yo, Maya Epasuki na matanga ya motoki ya susi na yo Maya, okomisi ngai kanda kanda na mokili Nzambe asala eloko oyo bolingo, Eloko oyo monyokoli Ngai ko nalelaka libala bandeko, Nzambe atindeli ngai elima Ngai ko natuti libaku ya mabe, Lisuma na lavi Likambo te, Maya bala na yo, Nazingi nde maboko Ngai nakoluka moyen nabosana Soki pe nakokoka Natingama lisusu nini Nakanga se motema ee Awa ko bobotoli ngai ye Boremplacer ngai nani Nakei kolela na se ya mbula Naboyi mpinzoli etika bilembo na matama ee Oyo nyonso foti ya mama Aponela ngai motema Motema ya kolinga baninga ya mokili Tika nanyokwama boye Vieux MASASI, Wapi BALENGE AMISI ee Maya, soki mokolo mosusu oloti ndoto kati ya butu Yebaka ngai wa yo Nazali kobanza yo Eloko esali ngai nde makanisi Tomeseneki mingi Mokili monuni nanu te Tina nini bolingo na biso enuna Mama Maya, soki moyen ezali, Senga mbanda na ngai ya sika Mokolo yo okokumba zemi, senga ye permission Mwana ya liboso yo okobota, Azala mwana ya mobali, Azwa kitoko na yo, Pesa ye kombo na ngai Mokili monuni nanu te Tina nini souvenir na biso ekola Mama Tonton Dolina, tonton Vila, Bakali Tonton Amiso, Tonton nsuka Bino bato bolinga lisano Epai ya Siluvangi, Epai ya LONGOMBA, Na Faubourg epai ya Teddy Kinsala Na Sexy Pop epai ya BeberNa Lukanu epayi ya Mayard Na Exodus na Bandal Soki bomoneli ngai Maya Boyebisa ye Epai akei, soki mobali atungisi ye Azonga, azonga ko Po na nini akomionyokola, Esika na ye ezali awa Nakangi maboko nazali kozela Nazali se na esika atikaki ngai Na se ya nzete ya lidame Nzambe asala eloko oyo bolingo, Eloko oyo monyokoli Nzambe asala eloko yo amour, Eloko oyo misère Nzambe asala eloko oyo koaimer, Eloko yo matata Ngai ko nalelaka libala bandeko, Nzambe atindeli ngai kisimbi Nzambe asala eloko oyo bolingo, eloko oyo matata Ayez mama ayez pitié Maya, mama Ayez pitié Tango ya kolala nde tango tokokanisa maye tokosala lobi Mama, Maya tia ngai na programme ya lobi mama, Maya kanisaka ngai mama Butu ekomi molai ngai pongi te miso Tongo ekomi kotana Maya kanisaka ngai mama Butu ekomi molai Yo na démarche ya Cameléon Maya kanisaka ngai ee mama (E N D)
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out