Lyrics

Mwa liloba o téléphone ekosala bien Benga nga ekozala suka délivrance Naza mowéi Nayebaka kosilika na yo na miso Kasi longolá kanda Nasi nawá, lisekui na ngai na maboko nayo Loba liloba moko ebikisa ngai, Fanny Image etikala na bongo na ngai eh Kaka ya mouchoir ozalaki kopepa nga Tango ko masuwa elbetaki loseba Etiki bolingo na biso ekomi na la queue oh Kaka yo nde moto osangisaka bato Sala nanu bilan bongo oyeba côté y'oleka Oh mwana oyo, combien bakota coma Oh l'amour Mingi bateka mokili pona l'amour Kaka yo nde bateyaki biso liloba ya Nzámbe Kaka yo nde bateyaki biso na ba parent Bolingo bolingo ebota ekweya ba probleme Oh l'amour, osali nga mabe Onyokoli ngai Soucis na motema na nga Nga, nga nakomi ndeko ya moniokoli Mawa na Nga Fanny Mawa na ngai ...ya l'amour Délais opesaki nga okozónga eh Dado esálí temps élargi Mikandá okoméláká nga esalaka toujours Retour à l'expéditeur Yaka yo zongelá kaka se ngai Nazoyeba te soki ozalaka na bomoyi to okufa Komela nga bonne nouvelle Pas de nouvelles, bonnes nouvelles Nga Fanny Adado, vraie chérie Ndenge tólinganaki na bolingo ya Nzámbe Ndenge tólinganaki na bolingo ya solo Tolapanaki na bolingo ya seko De ne jamais trahir, de ne jamais décevoir De ne jamais trahir, de ne jamais être déçus Okokaki kokokisa sánzá mobimba te sans ke okomela nga Oh l'amour, sans que y'obenga ngaí Namoni yokokisi mbula mobimba na ndambo Dado Fanny namoni obandi vie ya sika Kombo na yé nani? Mwána ango Oyo alangisi yo Po nakoma nausée Oyo atie poto-poto Na bolingo oyo, na I'amour oyo Po nakoma zeyi mbindo na miso na yo Nakosala nini awa y'osundoli nga Tálá ngai, mona ngai Mona ndenge Tálá ngai, mona ngai Mona ndenge Elongi esi ekuba nga kala nazali nanu mwana Elongi esi enuna nga, âge ezalí nanu ya bilenge Yóka nga ata mwa mawa Pitié Jamila Turbo Tálá ngai, mona ngai Mona ndenge Tálá ngai, mona ngai Mona ndenge Awa y'opikoli bolámu na nga Y'oloni mabe na nga na motéma na yo Nga nakosuka wapi bolingo yo omema Ba serment pe ba promesses nionso tolakanaka Ba sentiments ya ba love nionso tosalaka Ekeyi nango se boye natikali isolé Natikali isolé Natikali isolé Natikali isolé Natikali isolé
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out