Lyrics

Ofuta niongo na ngayi Mikumba na nga yango ndé emema yo na ekulusu, Yesu Na molili, na mikakatano na ngayi Suka-suka tongo na nkembo eko bima kaka Ah, té nako bungisa elikya té Ofuta niongo na ngayi Osilisa ba mpasi na ngayi Tina nini na niokuama, osi oniokuama po na ngayi Nakomi na suka, makasi esili ngayi Pesa nga loboko na yo Salela ngayi ngolu na yo Ngolu na yo ndé ebatelaka ngayi Makila na yo ndé ezipaka ngayi Loboko na yo ndé etelemisaka ngayi, papa simba ngayi Eli, Eli, lama sabachthani ko tika ngayi té Mosikoli na ngayi lisungi na nga eko wuta na yo Kuna na ekulusu, Yesu Nionso ekoki pona ngayi Nazwa elonga salela ngayi ngolu na yo Nani oyo olakaki yé mpé okokisaki té? Nani oyo otambuisaki yé mpé akomaki té? Nani oyo amekaki ngolu na yo mpé awumelaki na soni? Mopangusi ya pinzoli na bana na bato Aba papa okokisaka nionso Mokano nayo, ekokisama pona ngayi Longola soni na ngayi, kawusa ba mpota na ngayi Bongola likambo na ngayi, salela biso ngolu na yo oooh Mayi ya miso na ngayi ekomi litsio pona bato Nzela ozali ko lekisa ngayi, naai ako sosola? Oyo ngayi nazali komona lelo, lobi nako mona yango té Mawa pé pasi na nga eko bongwana esengo Natali pembeni na nga, bato mabé ba kofuluka Ngayi nazali ya yo, likambo na nga ewumeli Tala ba koseka ngayi, balobi y'otiki ngayi Motema ebateli kimia, nani ayebi ya ngayi na yo? Suka na nga ndé ebandeli na yo Posa ya motema na nga ezali eté na bika na sé na makolo na yo Pé na bombama na sé ya mapapu ya ngolu na yo, Nkolo Nani azalaka tangu ozwaki mokano ya kovandisa nga na sé ya ngolu na yo? Nani oyo ako belema, koloba eté yé apesaka yo toli? Pé nani oyo ako telemela yo pé awumela seko ya mokili oyo Nani ako tia tembé na yo, pé azala seko na bomoyi na sé na mokili oyo Ozali Nzambé ya somo, ozali Nzambé na nguya nionso Olakaki nga pé olobaki na nga eté oko tika nga té Kotika ngayi té, kotika ngayi té Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi té Kotika ngayi té, kotika ngayi té (papa simba ngayi) Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi té (papa simba ngayi, papa simba ngayi) Kotika ngayi té, kotika ngayi té Kotika ngayi té eh-eh, kotika ngayi Olakaki ngayi papa eté oko batela ngayi Olakaki nga papa eté tango nionso oko pangusa pinzoli na ngayi Papa simba ngayi, papa simba ngayi kotika ngayi té Papa simba ngayi Nkolo na nga azali moto té po akosa Nkolo na nga azali muana na moto té po té ayangana liloba nayé Bilaka na yé eko wumela seko pé ekokisamaka kaka Kotika ngayi té (kotika nga yi té) Ozali Nzambé (kotika ngayi té) Ozali Nzambé, ozali Nzambé (kotika ngayi té, eeeh eh) Alléluia (kotika ngayi té) Papa olakaki nga, olakaki nga (kotika ngayi té) Olakaki ngayi (kotika ngayi té) Olakaki ngayi (kotika ngayi té, eeeh eh, kotika ngayi té) Olakaki ngayi (kotika ngayi té, kotika ngayi té) Yo ndé Nkolo na ngayi, ngomba oyo na telelaka tango nionso (kotika ngayi té, eeeh eh, kotika ngayi té) Oza Nzambé, tango y'oponaka Tango yo obiangaka pé tango y'otindaka Nani akoloba eté apesaki yo toli Ozali Nzambé lokolo na nionso
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out