Music Video

L’or Mbongo Lemba - Scusa (Clip Official)
Watch {trackName} music video by {artistName}

Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
L'or Mbongo-Lemba
L'or Mbongo-Lemba
Performer
COMPOSITION & LYRICS
L'or Mbongo-Lemba
L'or Mbongo-Lemba
Composer

Lyrics

Towuti mosika na Nzambé oyo ya bomoyi Ko yemba, ko nganga oyo eza ya pamba té oh Akangoli biso kati na masumu, kino lelo'yo atiki biso té, oh Kino lelo'yo abwaki biso té, oh Towuti mosika na Nzambé oyo ya bomoyi Ko yemba, ko bino oyo eza ya pamba té A bikisi biso kati na minioko, kino lelo'yo atiki biso té, oh Kino lelo'yo abwaki biso té, oh Yaweh wuta ba Tende lokola ba faible plantes, éternel O zwi biso na néant, biloko ya pamba opesi tina O za ko tambuisa biso, toza ko croire na elonga nayo lelo lobi pé libela na libela Kino mokolo'yo toko mona yo, mozalisi ya likolo na sé Oyo abengaka pé apesaka position A lakaki biso eté ako sala Tomoni na miso kasi alobi esili té, oh Na ngolu na Nzambé tokomi ba mpongo, kino lelo'yo atiki biso té, oh Kino lelo'oyo abwaki biso té, oh A lakaki biso eté ako sala Tomoni na miso kasi alobi esili té, oh Na ngolu na Nzambé tokomi ba mpongo, kino lelo'yo atiki biso té, oh Kino lelo'oyo akobi sé ko koba Ebongo satana pé na masumu tina nini boko pekisa nga na yemba, ah (Na kangami oh, nako tika yé té) Ebongo bo bola yo na kozanga ndengé nini boko tindika nga na pengwa, eh (Na kangami oh, nako tika yé té) Oh yo pé maladie, mbeto hopitalo tina nini okolakisa nga sé kufa, eh (Na kangami oh, nako tika yé té) Eh ba lobi nga nasuki, nga nako kufa nayebi eté mokeli na nga aza Rapha, eh (Na kangami oh, nako tika yé té) Oh likambo ya ko bota kozanga bana, mokeli na nga abotisaka ata na ménopause (Na kangami oh, nako tika yé té) Eh Scuza, Scuza, Scuza, Scuza eeh (Na kangami oh, nako tika yé té) Eh Scuza, Scuza, Scuza, Scuza eeh (Na kangami oh, nako tika yé té) Eh lé-lé, eh lé-lé eeh (botika ngayi na yemba) Eeh yé-lé-lé, eeh (botika ngayi na bina) Botika ngayi na yeba yé (botika ngayi na ganga) Botika ngayi na ganga lelo, oh (na kangami oh, nako tika yé té) Na kangami na yo lokola sonzo (botika ngayi na yemba) Molingami na ngayi (botika ngayi na bina) Mokonzi oyo asikola nga (botika ngayi na ganga) Yé ndé Yesu na ngayi (na kangami oh, nako tika yé té) Motema na nga ya tango nionso (na kangami oh, nako tika yé té) Ata na pasi nako tingama sé na yé (na kangami oh, nako tika yé té) Oyo tango ya moto na Nzambé na yé (na kangami oh, nako tika yé té) Oyo tango ya kindoki té Massiyah na nga (na kangami oh, nako tika yé té) Oyo tango yako luka-luka té, oh (na kangami oh, nako tika yé té) Oyo tango yako salela Nzambé (na kangami oh, nako tika yé té) Oyo tango yako pona Nzambé ya bomoyi (na kangami oh, nako tika yé té) Lokola Ruth akangamaki na Nzambé ya Naomie (na kangami oh, nako tika yé té) Aben akangami na Nzambé ya Mupati (na kangami oh, nako tika yé té) Na kangami na yo lokola sonzo Yesu (na kangami oh, nako tika yé té) Na kangami na yo lokola sonzo (na kangami oh, nako tika yé té) Botika ngayi na yemba (botika ngayi na yemba) Eeh lé-lé, yé-lé-lé eh (botika ngayi na bina) Oh botika ngayi na ganga (botika ngayi na ganga) Eh, yé eeeh (na kangami oh, nako tika yé té) Oh botika ngayi na ganga (botika ngayi na yemba) Botika ngayi na yeba ye (botika ngayi na bina) Oh atombola ngayi na bowumbu, Yesu (botika ngayi na ganga) Abikisa ngayi yango nako yemba lelo (botika ngayi na yemba) A netolaka, anetola ngayi (botika ngayi na bina) Na gangi na mongongo makasi (batika ngayi na ganga) Na gangi na mongongo makasi, Yesu na nga (botika ngayi na yemba) Yo ndé heritage na ngayi, eh (botika ngayi na bina) Po yo ndé okoma nionso na ngayi (botika ngayi na ganga) Yesu yo ndé okoma bikamwa na nga (botika ngayi na yemba) (Botika ngayi na bina)
Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out