Credits
PERFORMING ARTISTS
L'or Mbongo-Lemba
Performer
COMPOSITION & LYRICS
L'or Mbongo-Lemba
Composer
Lyrics
Tomona ba konzi na mokili, ba nkumu bako kufa
Ba susu bako botama eeh, eh
Tomona ba konzi na mokili, ba nkumu bako kufa
Ba susu bako botama eeh, eh
Mokonzi oyo, mokonzi oyo, mokonzi oyo aningisa mokili eh-eh
Akanga monoko ya ba nguna, asisila tembe na bango, oh
Po yé ndé eh-eh, suka ya makambo nionso
Mokonzi oyo kombo na yé mopanga
Yé ndé monduki ya ba longi, nionso
Aza bomengo ya bazangi, poto yaba kristu
Asekisa bato na mawa, alelisa ba tshioli, eh-eh
Mokonzi oyo, mokonzi oyo, mokonzi oyo aningisa mokili eh-eh
Alléluia, kombo na yé Yeshua-a-Massiya, to sanjoli
Alléluia, kombo na yé Yeshua-a-Massiya, to sanjoli
Eh molingami, kombo na Yesu ndé fongola ya elonga na biso
Tang'oyo toza ko tanga kombo na Yeso
Tala ndengé ba singa eza ko tana na bomoyi na yo
Yoka ndengé maladie eza kotika nzoto, bilakeli mabé eza ko pota mbangu
Pangusa pinzoli na mawa, alingi apesa yo pinzoli ya esengo
Po na misala minene oyo aza ko sala na bomoyi na yo
Le nom de Jésus, alléluia
Oh alleluia eh, your name is Yeshua ah
Oh alleluia eh, let's your name be magnified, alleluia
Alleluia, His name is Yeshua-a-Massiya, we worship Him
Alleluia, His name is Yeshua-a-Massiya, glorify your name
Alleluia, His name is Yeshua-a-Massiya, we worship Him
Alleluia, kombo na yé Yeshua-a-Massiya, to sanjoli
Aaah alléluia, merci Jésus, igwe eeeh (Yeshua, Yeshua)
Igwe eeh, Yeshua (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Aah Yeshua aah, oh Yeshua-a-Massiya (Yeshua, Yeshua)
Mokonzi ya ba konzi ya mokili Yesu na nga (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Oh na tangu ya maladie yo ndé Rapha (Yeshua, Yeshua)
Eeeh, eh-eh Sabbaoth na nga eh (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Yanola ngayi eeeh (Yeshua, Yeshua)
El Shaddaï oh, ooh Yeshua-a-Massiya (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Aah Yeshua aah, oh igwe eeh (Yeshua, Yeshua)
Oh pandanjila aaah, alléluia eh-eh (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Yeshua aah, ooh Yeshua ah (Yeshua, Yeshua)
Oooh, oh Yeshua-a-Massiya eh (Yeshua, Yeshua-a-Massiya)
Binela yé na esengo, toké (alléluia, kombo na yé Yeshua-a-Massiya, to sanjoli)
Car il n'y a sous le ciel aucun autre nom qui ait été donné parmi les hommes
Par lequel nous devrions être sauvés
C'est le nom de Jésus Christ, l'unique et le véritable, alléluia
Oh Tabitha asekwa, Yesu na nga sé na kombo na yo Nkolo na ngayi
Yaka Yesu yo, yoka nga pé Nkolo
Awa ngayi na beleli sé kombo na yo Nkolo, Yesu yo ndé ngayi
Nkolo na bikamwa
Awa mokakatani ya La Belle eh, atelema Yesu oyo sé na kombo na Yeshua-a-Massiya
Ba beli ba bika Yesu ooh, ba kakatani ba tambola
Ba kufi ba sekwa ah, ba bola ba koma ba zwi
Bartimée mokufi miso abelelaki kombo na yo
Abengaki yo muana na Dawidi oyokaki
Nga pé lelo na beleli yo, Yesu na bengi yo Yeshua-a-Massiya
Yaka yo, y'oyokela ngayi
Yaka y'osalela ngayi, yaka y'omonisama Yeshua-a-Massiya
Yeshua-a-Massiya oooh
Ata na mayi ya mozindo lokola Petelo
Likolo na nga eko zinda té po nayé na kombo na Yesu
Ata na libumu ya mbisi lokola Jonas, eh
Wana na kobwakama nako tatola Yesu ozali wa ngayi, eeh
Kombo na Yesu ebikisa ba maladie nionso incurable
Kombo na Yesu eh, molongi ya bitumba nionso
Kombo na Yesu lobiko, kombo na Yesu elonga
Kombo na Yesu bikamwa, kombo na Yesu bomoyi ya seko
Alléluia, kombo na yé Yeshua-a-Massiya, to sanjoli
Lyrics powered by www.musixmatch.com